[00:15.62] Olobaki nini eh eh eh eh [00:23.97] Olobaki nini, Mamou, eh eh eh eh [00:28.91] Olobaki nga na fundaka yo, na mobali na yo [00:34.73] Olobaki nga na salaka kisefe, na libala na bino [00:45.32] Olobaki nini eh eh eh eh [00:52.33] Olobaki nini, Mamou, eh eh eh eh [00:56.91] Olobaki nga na fundaka yo, na mobali na yo eh [01:02.04] Olobaki nga na salaka kisefe, na libala na bino [01:08.38] (Luambo Makiadi) [01:10.40] Madilu tika ye aloba eh [01:13.48] Makambo ye asalaka, ayebaka te [01:18.18] Ba balabala ye atambolaka, bato ba monaka ye [01:24.25] Ba ndako ye akotaka, ba mur ya ndako efundaka ye [01:29.14] Na ba coin nyoso ye a telemaka, ba chauffeur taxi ba monaka ye [01:34.69] Po na nini a panza yo sango, alobi, yo osalaka kisefe [01:40.44] Um [01:41.31] (Madilu System) [01:42.09] Ngai moto na kotelaka yo, Mamou eh eh ye ye [01:46.55] Ngai moto nayebi ba sekele, Mamou eh ye ye [01:51.42] Lelo na komi moto mabe, Mamou eh eh [01:56.32] Oyebi tango engindaka oh, Mamou eh eh [02:01.34] Oko kanisa ngai Mamou, na kei eh eh [02:06.08] Ata ofingi ngai ndumba, Mamou yee [02:10.94] (Luambo Makiadi) [02:12.48] Oh Mamou, na kamwe vraiment, Mamou [02:17.95] Na kanisaka ozalaka ami na nga ya motema [02:22.04] Po oyebi que nayebi ba secret na yo nyoso [02:25.99] Eloko ekamwisi nga Mamou [02:28.59] Okei ko finga ngai epa ya Musa [02:30.95] Olobi ngai nazali ndumba [02:33.25] Vraiment, Mamou [02:35.21] Oyebi, ngai na balaka [02:38.94] Na divorca, na bota [02:42.16] Bongo soki lelo yo, Mamou [02:45.75] Moto na tiaka motema [02:47.55] Obandi ko finga ngai ndumba [02:49.10] Ki ndumba ezali maladi te [02:51.56] Kindumba ezali punition te [02:53.40] Mamou, yo mwasi ya libala [02:56.89] Na kamwaka yo, oko tambola na kabambi ya sac a main [03:01.76] Na kati ya sac wana, kabambi ya liputa [03:06.18] Brosse a dents lokola moto azali ko kende voyage [03:08.87] Lipapa ya se, ebele ya makasu [03:12.22] Mamou, oyebi, epayi na yo nga nazalaka vivard [03:16.62] Po mibali nayo nyoso tout [03:18.77] Ata mobali na yo akuti yo ozali ko solola na mobali [03:20.86] Oko loba que aza mobali na ngai [03:22.94] Mais na lingaka ko boma libala na bino te, Mamou [03:25.76] Ummm [03:26.71] Po na lingaka bo bokolo bana na bosembo [03:30.36] Au lien na kota ba loba oh [03:32.98] Tala mwasi ya ndumba awuti ko boma libala ya mwasi abala [03:35.66] Um [03:36.65] (Madilu System) [03:37.23] Eloko nini oko luko oh, Mamou eh ye ye [03:40.44] Eloko nini olo luka oh, Mamou eh ye ye [03:45.50] Signature osi ozua, Mamou [03:50.78] Landa nzela ya libala oh, Mamou [03:54.64] Landa nzela ya libala oh, Mamou eh yeye [03:59.89] Yango evandisa yo na poto, Mamou eh eh [04:05.23] Tika ko kosa mobali nayo, Mamou eh eh [04:10.08] Soki atelephone loba obimaka, Mamou [04:14.91] (Luambo Makiadi) [04:15.96] Mamou, awa lisusu soki na lobi [04:19.96] Na kumbi ngambo, po naza ndumba [04:22.76] Yo moko oyebisa ngai [04:25.02] Mobali na yo atinda yo na poto, po oya ko bokolo bana [04:29.55] Ya ngo nde apesa ya signature [04:32.33] Ekoma yo awa, oyebisi nga mobali na yo a telephonaka yo 2fois par jour [04:37.22] Na 6heure du matin, na minuit [04:40.85] Apres minuit soki a telephone yo [04:43.30] Okamati kisi ya ba ngungi, opompe ndako mobimba [04:47.50] Po bana ba lala ti tango yo oko zonga [04:50.31] Po oyebi que mobali na yo atelephonaka na 6heure du matin [04:54.32] Tango atelephonaka yo, yoka ndenge oyebisaka na mobali na yo [04:58.03] Alo, papa ya bana [05:02.79] Biso toza na biso kaka malamu [05:05.09] Kaka nde bana no awa moyen te [05:07.87] Vraiment mobulu likambo [05:09.45] Surtout mwana oyo ya muke ya mobali azua elongo nayo, papa [05:12.60] Eh, azo kamwisa nga vraiment [05:15.03] Photo kutu otia na sani, na talaka ata elongi na yo [05:18.44] Abamba yango na mabele photo epasuka [05:20.26] Mwana oyo penza mobulu moyen te penza [05:22.89] Kaka ndenge ozalaka mwana muke [05:24.48] Lokola mama na yo ayebisaka ngai [05:26.60] Papa ya bana, naza na makambo mususu na lobaka te [05:29.29] Kaka otindelaka biso mbongo ya ko lia [05:31.36] Na suki se bongo [05:33.54] (Madilu System) [05:34.29] Yo moko osalaka mabe oh, Mamou eh yeye [05:38.59] Yo moko osalaka mabe ye [05:42.03] Obangaka mobali nayo te, Mamou eh eh [05:48.20] Olongola respect na ye okaba, Mamou eh eh [05:53.06] Ba camarade ya mobali nayo, Mamou eh eh [05:57.99] Obangaka bango te oh, Mamou eh ye ye [06:03.07] Lelo ofingi ngai ndumba ah nga na seki eh, Mamou, ye [06:08.39] (Luambo Makiadi) [06:09.14] Oh Mamou, kindumba oza ko finga ngai Bruxelles mobimba [06:14.30] Oke ti na Paris osilisi ngai [06:16.51] Otindi mokanda na Kinshasa [06:18.59] Mosusu otindi na Brazza [06:20.21] Kindumba eza punition te, Mamou [06:22.42] Oyeba Mamou esui ngai [06:24.90] Na lingaki dailleur na funda yo, Mamou [06:27.73] Inutile na funda yo [06:30.15] Na kamati obe film ya makambo nyoso ya mabe, oyo osalaka [06:35.40] Na tekisi yango epa ya Yorgo [06:38.12] Po azikisela ngai film wana [06:41.02] Mamou koma ngai [06:44.25] Ndenge ba komaka Yezu na kuruze [06:47.22] Sete mibale na loboko [06:49.86] Sete moko na lokolo [06:52.00] Mamou, ozali mwasi ya libala [06:54.69] Okamwisaka ngai [06:56.25] Na monaka yo oza ndoki [06:58.38] Oza kinsenkwa [07:00.49] Ozali munyororo [07:02.85] Mamou, nini nakoki ko loba po na yo [07:06.34] Example nini na koki na pesa po na basi ya mabala [07:08.84] Example ezalite [07:11.74] Awa ba lobe te nga nazali ndumba [07:14.34] Nako tambola na mwasi ya libala [07:15.98] Yango nako pesa yo makannisi mabe, te! [07:17.84] Ezali nde yo moko moto oza na makanisi ya mabe [07:21.21] (Madilu System) [07:22.27] Ngai moto na kotelaka yo [07:25.02] Ngai moto naybi ba sekele [07:29.92] Lelo na komi moto mabe, Mamou eh eh [07:35.14] Oyebi tango egindaka, Mamou [07:40.16] Oko kanisa nga, Mamou [07:43.07] Nake eh eh [07:44.99] Ata ofingi ngai ndumba, Mamou, ye [07:57.38]